Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 51

7 Solo, nabotamaki kati na lisumu ;

wuta na libumu ya mama na ngai,

nazali mosumuki.

8 Nzokande Yo, osepelaka na bosembo,

ata kati na libumu ;

mpe okoteya ngai bwanya

kati na esika ebombama.

9 Petola ngai na nzela ya izope,

mpe nakokoma peto ;

sukola ngai, mpe nakokoma pembe

koleka mvula ya pembe.

10 Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema ;

mpe mikuwa na ngai oyo obukaki

ekosepela makasi.

11 Kotala lisusu masumu na ngai te,

mpe longola bambeba na ngai nyonso.

12 Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto ;

mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.

Veja também