Elongo na Nzambe, kobanga ezali lisusu te
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Ebenga ya terebente ya mosika. » Nzembo ya Davidi, tango bato ya Filisitia bakangaki ye kati na mboka Gati.
3 Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso ;
bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.
4 Mokolo oyo nazalaka na bobangi,
natiaka elikya na ngai kati na Yo.
8 Mpo na makambo oyo ya mabe,
boni, bazanga etumbu ?
Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo !
11 Pembeni ya Nzambe oyo nakumisaka Liloba na Ye,
pembeni ya Yawe oyo nakumisaka Liloba na Ye,