Nazwaka na kimia kati na Nzambe
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.
2 Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ;
lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.
5 Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye
wuta na esika na ye ya likolo,
basepelaka kotatola lokuta.
Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ;
kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.
6 Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe,
pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.