1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.
2 Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai ;
nazali koluka Yo,
molimo na ngai ezali na posa na Yo,
bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi,
kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.
3 Natalaki Yo kati na Esika ya bule
mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.
4 Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi,
bibebu na ngai ekosanzola Yo.
5 Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba,
nakotombola maboko na ngai
mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
6 Nakotonda lokola moto oyo asili kolia
misuni kitoko mpe mafuta ;
bibebu na ngai ekoganga na esengo
mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
7 Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai,
nasambelaka Yo na butu ;
8 pamba te ozali lisungi mpo na ngai,
mpe nagangaka na esengo
wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.
9 Nakangami na Yo ;
loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi.
10 Bato oyo balukaka koboma ngai
bakozinda na mabele
11 Bakoboma bango na mopanga
mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.