Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 66

Lokumu na Nzambe oyo akangoli biso

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo.

Bino bato ya mokili mobimba,

bobetela Nzambe maboko !

2 Boyemba banzembo ya lokumu

mpo na nkembo ya Kombo na Ye,

bopesa lokumu na Ye nkembo.

3 Boloba na Nzambe :

« Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango !

Mpo na nguya monene na Yo,

banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.

4 Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo ;

bayembaka mpo na lokumu na Yo,

basanzolaka Kombo na Yo»

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também