17 Nzambe, wuta bolenge na ngai, oteya ngai ;
mpe kino lelo, nazali kotatola bikamwa na Yo.
18 Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange
mpe suki na ngai ekomi pembe,
oh Nzambe na ngai, kotika ngai te,
mpo ete natatola makasi na Yo
epai ya bato ya ekeke oyo,
mpe misala ya nguya na Yo
epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.