Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 78

4 Tokobombela yango bakitani na bango te,

kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima

nkembo ya masanzoli ya Yawe,

nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.

5 Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi,

atiaki mibeko kati na Isalaele,

apesaki mitindo epai ya batata na biso

ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,

6 mpo ete bikeke oyo ekoya sima eyeba yango,

ekeke ya bana oyo bakobotama.

Tika ete batelema mpe bayebisa yango

na bana na bango,

7 mpo ete batonga elikya na bango kati na Nzambe,

babosana te misala ya Nzambe

mpe babatela mibeko na Ye.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também