Publicidade

Salmos 82

Nzambe asambisaka bakambi ya bikolo

1 Nzembo ya Azafi.

Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye,

azali kokata makambo kati na banzambe.

2 Kino tango nini bokokata makambo

na bosembo te

mpe bokokotela bato mabe ?

3 Bolongisa moto oyo azangi makasi

mpe mwana etike,

bokata likambo ya moto ya mawa

mpe ya mobola ;

4 bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi

mpe na mobola,

bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.

5 Bazangi boyebi mpe bososoli,

bazali koyengayenga kati na molili ;

miboko nyonso ya mokili ezali koningana.

6 Nalobaki : « Bozali banzambe,

bozali bino nyonso bana

ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo »

7 Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso

mpe bokweyaka lokola bakambi.

8 Nzambe, telema, sambisa mokili ;

pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-