Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 84

Nazali na posa makasi ya Tempelo na Yo

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.

2 Yawe, Mokonzi ya mampinga,

tala ndenge bisika oyo ovandaka

ezali kopesa posa !

3 Nzoto na ngai mobimba ebukani pene nakufa

mpo na posa makasi ya lopango ya Yawe !

Motema mpe nzoto na ngai ezali koganga

epai ya Nzambe na bomoi.

4 Ndeke ya moke ezwaka esika ya kovanda,

mpe mbilambila esalaka zala

epai wapi etiaka bana na yango,

pene ya bitumbelo na Yo,

Yawe, Mokonzi ya mampinga,

Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai.

5 Esengo na bavandi ya Ndako na Yo !

Bakokumisa Yo tango nyonso !

6 Esengo na bato oyo bazwaka makasi kati na Yo ;

bakendaka na esengo na Tempelo na Yo !

7 Tango bakatisaka Lubwaku ya Baka,

bakomisaka yango esika oyo etonda na bitima ya mayi,

mpe mvula etondisaka yango na mapamboli.

8 Makasi na bango ebakisamaka tango nyonso

kino bakomaka na Siona, liboso ya Nzambe.

9 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,

yoka losambo na ngai !

Nzambe ya Jakobi, yoka ngai !

10 Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala !

Tala elongi ya mopakolami na Yo !

11 Lokola kovanda mokolo moko

kati na lopango na Yo

eleki kovanda mikolo nkoto moko

na esika mosusu,

naponaki kotelema na ekotelo

ya Ndako ya Nzambe na ngai

na esika ete navanda kati na bandako ya kapo

ya bato mabe.

12 Pamba te, mpo na biso,

Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba ;

Yawe apesaka ngolu mpe nkembo,

aboyaka kopesa eloko moko te

epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.

13 Yawe, Mokonzi ya mampinga,

esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yo !

Veja também