Mokili mobimba esanzolaka Yawe, Mokonzi na yango
1 Boyembela Yawe nzembo ya sika !
Bino nyonso, bato ya mokili mobimba,
boyembela Yawe !
2 Boyembela Yawe,
bopambola Kombo na Ye !
Bopanza sango ya lobiko na Ye,
mokolo na mokolo !
3 Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota !
Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa
kati na bikolo nyonso.
4 Pamba te Yawe azali monene
mpe abongi na lokumu,
azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.
5 Banzambe nyonso ya bikolo ezali bikeko ya pamba,
nzokande Yawe akela likolo.
6 Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye,
nguya mpe nkembo ezali
kati na Esika na Ye ya bule.
7 Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe ;
bosanzola Yawe na kopanza
sango ya nkembo mpe nguya na Ye !
8 Bosanzola Yawe mpe bopesa
Kombo na Ye nkembo !
Bomema makabo na bino,
bokota na lopango na Ye !
9 Bogumbama liboso ya Yawe
oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi !
Bino bavandi ya mokili mobimba,
bolenga liboso na Ye !