Publicidade

Salmos 20

Yawe, longisa mokonzi na biso

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2 Tika ete Yawe ayanola yo

na tango ya pasi ;

tika ete Nzambe ya Jakobi azala

ndako batonga makasi mpo na kobatela yo.

3 Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule

mpe apesa yo makasi wuta na Siona.

4 Tika ete akanisa makabo na yo nyonso

mpe andima mbeka na yo ya kotumba.

5 Tika ete akokisa posa ya motema na yo

mpe mabongisi na yo nyonso.

6 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo

mpe tokotombola bendele

na Kombo ya Nzambe na biso.

Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.

7 Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye,

ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola,

na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.

8 Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar,

bamosusu, kati na bampunda ;

kasi biso totiaka elikya na biso

kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.

9 Bango, bafukamaka mpe bakweyaka ;

kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema

mpe totikalaka ngwi.

10 Yawe, bikisa mokonzi !

Yanola biso tango tozali kobelela.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-