3 Nani akokoka komata ngomba ya Yawe ?
Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule ?
4 Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto,
oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko
mpe alapaka ndayi ya lokuta te.
5 Yawe akopambola ye ;
mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.