2 Nzambe na ngai,
natiaka elikya na ngai kati na Yo ;
sala ete nayoka soni te,
mpe banguna na ngai basepela te na tina na ngai.
3 Bato nyonso oyo batalelaka Yo
bakotikala koyokisama soni ata moke te ;
kaka ba-oyo bapesaka Yo mokongo
nde bakoyokisama soni.