4 Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe,
eloko moko kaka oyo nasengaka makasi :
nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe,
mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe
mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
5 Pamba te, na tango ya pasi,
akobatela ngai kati na evandelo na Ye,
akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule
mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.