Publicidade

Salmos 62

Nazwaka na kimia kati na Nzambe

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.

2 Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ;

lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.

3 Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ;

azali ebombamelo na ngai,

nakoningana te.

4 Kino tango nini bokosangela moto moko ?

Kino tango nini bino nyonso bokosangana

mpo na koluka koboma ye

lokola mir oyo etengami,

lokola lopango oyo esili kokweya ?

5 Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye

wuta na esika na ye ya likolo,

basepelaka kotatola lokuta.

Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ;

kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.

6 Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe,

pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.

7 Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ;

azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.

8 Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ;

libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai

ezali kati na Nzambe.

9 Botielaka Ye elikya tango nyonso,

bosopaka mitema na bino liboso na Ye,

pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.

10 Solo, bato bazali lokola molunge,

bazali lokola lokuta ;

Soki batie bango na emekelo kilo,

ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.

11 Botiaka elikya te na mileki ya moyibi,

mpe botielaka yango motema te ;

soki bomengo na bino ekomi ebele,

bokangama na yango te.

12 Nzambe alobaki mbala moko,

ngai nayokaki mbala mibale :

« Pamba te makasi ezali ya Nzambe ;

13 mpe bolingo ezali ya Nkolo »

mpe « ofutaka moto nyonso

kolanda misala na ye»

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-