Publicidade

Salmos 78

Misala ya Nzambe

1 Nzembo ya Azafi.

Bino, bato na ngai, boyoka malako na ngai !

Bopesa matoyi na maloba ya monoko na ngai !

2 Nakofungola monoko na ngai mpo na lisese,

nakosakola makambo oyo ebombama

wuta na tango ya kala.

3 Makambo oyo toyoka, oyo toyebi,

oyo batata na biso bayebisa biso.

4 Tokobombela yango bakitani na bango te,

kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima

nkembo ya masanzoli ya Yawe,

nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-