22 Bikisa ngai wuta na monoko ya nkosi
mpe na maseke ya mpakasa.
23 Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na ngai,
mpe nakokumisa Yo kati na mayangani.
24 Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye !
Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu !
Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !